10/09/2026
JEAN 10:9-15 {jean 10:9-15}
YESU, AZALI MOBATELI MALAMU
9 Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei. 10 Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.
11 Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye. 12 Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango. 13 Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.
14 Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai 15 —ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai.
Na mokili mobimba batu mibale nde ba kabi bo moyi na bango pona ko bikisa mokili lelo mangomba matondi pona ko teya ma tatoli ya lukuta na batu.
Ko zala kimbanguiste epesamela mutu nyonso te, soki osala naye na likolo te na se pe oko sala naye te, biso to ponama wuta ebandeli ya mokili yango nde bo monaka ata bo fingi, esalaka biso eloko te to kangama naye kaka 😂😂😂